Knowledge Base Wiki

Search for LIMS content across all our Wiki Knowledge Bases.

Type a search term to find related articles by LIMS subject matter experts gathered from the most trusted and dynamic collaboration tools in the laboratory informatics industry.


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé .
Mónganga Denis Mukwege o 2009.

Denis Mukwege azalí mónganga-bomwǎsí mwa Kongó-Kinsásá, mpé mokambi mwa makokí ma moto. Abótámí o mokɔlɔ mwa yambo, sánzá mísáto, mobú 1955.

Mukwege azalí mwǎna mwa nganga misíoni. Azalákí moyékoli o Athénée royal mpé o institut Bwindi o Bukavu. Ayékólákí o UNIKIN mpɔ̂ na mibú míbalé. O mobú 1976 abandí koyékola bónganga o Burundi mpé okómí móngana o mobú 1983. Asálákí o lopitálo la Lémera mpɛmbɛ́ni Bukavu.

O mobú 1984 abandí koyékola bónganga-bomwǎsí o Angers na Falansia. O 1989 azóngí na lopitálo la Lémera no mosála mwa mónganga mokonzi.

O mobú 1996, na etumba ya yambo ya Kongó, akímí na Nairobi o Kenya. Nsima etumba yangó azóngí na Kongó mpé abandí lopitálo la Panzi. O lopitálo langó asálísí bǎsí bazokí na botɛ́mɔli.

O mobú 2008 azwí Litómba lya makoki ma moto lya Lisangá lya Bikólo bya Molɔ́ngɔ́.